Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Koteyama na etumbu

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Koteyama na etumbu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Ebre 12:11

Moto moko te azalaka na esengo soki bapesi ye etumbu, pamba te epesaka mawa; kasi sima na tango, etumbu ebotaka lokola mbuma, epai ya moto oyo bapesi yango: bomoi ya bosembo mpe ya kimia.

02 Ba-Ebre 12:6

Pamba te Nkolo apamelaka moto oyo Ye alingaka, apesaka etumbu na moto nyonso oyo Ye ayebaka lokola mwana na Ye. »

03 Masese 3:11-12

Mwana na ngai, yamba toli ya Yawe, koboya te pamela na Ye; pamba te Yawe apamelaka moto oyo Ye alingaka, ndenge kaka tata apamelaka mwana na ye, oyo alingaka.

04 1 Bakolinto 9:27

Kasi nakonzaka nzoto na ngai, nakomisaka yango lokola mowumbu, pamba te nabangaka kozanga mbano sima na ngai koteya bato mosusu.

05 Yobo 5:17

Esengo na moto oyo Nzambe apameli! Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.

06 Deteronomi 8:5

Boye sosola ete Yawe, Nzambe na yo, azalaki koteya yo ndenge tata ateyaka mwana na ye.

07 Emoniseli 3:19

Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.

Bantína oyo etali