Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bokɔlɔ ya molimo

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Bokɔlɔ ya molimo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Ebre 6:1

Yango wana, tokota na mateya oyo ekoki mpo na mikolo; tolekisa tango te na mateya ya ebandeli na tina na Klisto, mpe tozongela te mateya lokola kobongola motema, kotika misala oyo ememaka na kufa, kondima kati na Nzambe,

02 Ba-Efeso 4:13

Boye, biso nyonso tokokoma na bomoko kati na kondima mpe kati na boyebi ya Mwana na Nzambe, mpe tokokoma bato oyo bakembi kolanda ndenge Klisto azali ya kokoka.

03 Bakolose 1:28

Ezali Ye Klisto nde biso tosakolaka, na kokebisa mpe na koteya moto nyonso, na bwanya nyonso, mpo na kokomisa moto nyonso ya kokoka kati na Klisto.

04 1 Bakolinto 14:20

Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.

05 Jake 1:4

Nzokande kokanga motema na bino esengeli te kosuka na nzela mpo ete bokoma bato bakemba mpe bakoka kati na kondima, bato oyo bazangi pamela.

06 2 Petelo 1:8

Pamba te soki bozali na bizaleli oyo ya malamu kati na bino mpe botondi na yango, ekosala ete bozala basali ya goyigoyi te mpe bokola makasi na boyebi ya Nzambe na biso mpe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

07 Bafilipi 3:15

Biso nyonso oyo tokola na Molimo, tosengeli kokanisa ndenge wana. Mpe soki ezali na likambo oyo na tina na yango bozali kokanisa ndenge mosusu, Nzambe akososolisa bino.

08 Ba-Ebre 5:14

Bilei ya makasi ezali mpo na mikolo, ba-oyo bayebi kokesenisa malamu mpe mabe.

Bantína oyo etali