Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Boyekoli
Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Boyekoli mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu;
Bongo Yesu alobaki na bango nyonso: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya, kokamata ekulusu na ye mokolo na mokolo mpe kolanda Ngai.
Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye: — Soki bowumeli kati na Liloba oyo nateyaki bino, bokozala penza bayekoli na Ngai, bokoyeba solo, mpe solo ekokangola bino.
Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi.
Ezali na nzela ya bolingo oyo bokotalisana bino na bino nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na Ngai.
Mpe moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpe alandaka Ngai te akoki te kozala moyekoli na Ngai.
Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.
Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.