Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nkolo Mobikisi na biso

Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Nkolo Mobikisi na biso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Kobima 15:26

Alobaki: « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »

02 Banzembo 103:2-3

Eh molimo na ngai, pambola Yawe mpe kobosana ata moko te kati na misala malamu na Ye! Ye nde alimbisaka masumu na Yo nyonso, abikisaka yo na bokono nyonso,

03 Ezayi 53:5

Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso, banyokolaki ye mpo na masumu na biso; etumbu oyo ememelaki biso kimia ekweyaki na nzoto na ye; mpe na nzela ya bapota na ye, biso tobikisami na bokono na biso.

04 Jeremi 17:14

Oh Yawe, bikisa ngai mpe nakobika; Oh Yawe, kangola ngai mpe nakokangolama, mpo ete nakumisaka nde Yo!

05 Banzembo 147:3

Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.

06 Jeremi 30:17

Nakozongisela yo bomengo na yo mpe nakobikisa bapota na yo, › elobi Yawe. ‹ Lokola bazalaki kobenga yo ekolo basundola, Siona oyo moto moko te ayokelaka mawa; ›

07 Banzembo 30:2

Yawe, nanetoli Yo, pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai.

08 Matayo 11:28

Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba; Ngai, nakopesa bino bopemi.

09 1 Petelo 2:24

Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.

10 Banzembo 41:3

Yawe akokengela ye mpe akobatela bomoi na ye, akokomisa ye moto ya esengo kati na mokili mpe akokaba ye te na maboko ya banguna na ye.

11 Oze 6:1

Boya, tozonga epai na Yawe! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.

12 Luka 4:18

« Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama

13 Banzembo 107:20

Atindaki Liloba na Ye mpe abikisaki bango, akangolaki bango wuta na kunda.

14 Jake 5:14-15

soki mpe mosusu kati na bino azali kobela, tika ete abenga bakambi ya Lingomba mpo ete babondela mpo na ye mpe bapakola ye mafuta na Kombo ya Nkolo, pamba te libondeli oyo esalemi na kondima ekobikisa mobeli, mpe Nkolo akotelemisa ye. Soki asalaki masumu, Nzambe akolimbisa ye.

Bantína oyo etali