Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bato baleki mike
Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Bato baleki mike mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Mokonzi akozongisela bango: « Nazali koloba na bino penza ya solo: eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »
Pamba te nayokaki nzala, mpe bopesaki Ngai bilei; nayokaki posa ya mayi, mpe bopesaki Ngai mayi ya komela; nazalaki mopaya, mpe boyambaki Ngai malamu; nazalaki bolumbu, mpe bolatisaki Ngai bilamba; nabelaki, mpe bosungaki Ngai; nakotaki na boloko, mpe boyaki kotala Ngai. »
Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.
Bolemba te koyambaka malamu bapaya, pamba te, na nzela wana, bato mosusu bayambaki ba-anjelu wana bayebaki te ete bazali solo ba-anjelu.
Moto nyonso oyo apesaka ata kopo moko kaka ya mayi ya malili epai ya moko kati na bana mike oyo, mpo ete azali moyekoli na Ngai, nazali koloba na bino penza ya solo, akotikala kobungisa te lifuti na ye.
Akozongisela bango: « Nazali koloba na bino penza ya solo: eloko nyonso oyo bosalaki te mpo na moko kati na bato pamba oyo, boyeba malamu ete bozangaki nde kosala yango epai na Ngai. »
Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko.
Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo apesi bino kopo ya mayi na Kombo na Ngai, mpo ete bozali bato ya Klisto, akotikala kobungisa te lifuti na ye.
mpe alobaki na bango: — Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke na Kombo na Ngai, ayambi nde Ngai moko; mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi nde Motindi na Ngai. Pamba te, ezali ye oyo aleki moke kati na bino nyonso nde aleki monene.
Bongo, bato ya sembo bakoloba na Ye: « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala mpe topesaki Yo bilei; tango nini tomonaki na posa ya mayi, mpe topesaki yo mayi ya komela? Tango nini tomonaki Yo mopaya, mpe toyambaki Yo malamu; tango nini ozalaki bolumbu, mpe biso tolatisaki Yo? Tango nini tomonaki Yo kobela to kati na boloko mpe toyaki kotala Yo? »
Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.
Ndakisa: soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azangi bilamba ya kolata mpe bilei ya mokolo na mokolo, bongo moko kati na bino alobi na ye: « Kende na kimia, yetola moto mpe lia, » kasi apesi ye te eloko oyo azali na yango posa mpo na nzoto na ye, maloba wana ezali na tina nini?
Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye?
Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo. [