Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bokonzi ya Nzambe
Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Bokonzi ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
Azalaki koloba: « Tango ekoki, mpe Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. Bobongola mitema mpe bondima Sango Malamu. »
Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to ya komela, kasi ezali nde likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu.
Bakoloba te: « Ezali awa » to « Ezali kuna, » pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino.
Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.
Wuta na tango wana, Yesu abandaki koteya: « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene! »
Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya maloba te, kasi likambo ya nguya.
Oh etonga moke, bobanga te! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi!