Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mpisoli ekozala lisusu te

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Mpisoli ekozala lisusu te mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Emoniseli 21:4

Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. »

02 Ezayi 25:8

akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.

03 Emoniseli 7:17

pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi akozala Mobateli na bango, akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi, mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.

04 Banzembo 30:5

Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye; bokumisa Kombo na Ye ya bule.

05 Banzembo 126:5

Bato oyo balonaka na mpinzoli babukaka na banzembo ya esengo.

06 Emoniseli 21:3-4

Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba: « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango. Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. »

07 Ezayi 60:20

Moyi na yo ekolala lisusu te, mpe sanza na yo ekobunga lisusu te; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe mikolo na yo ya pasi ekosila.

08 Jeremi 31:13

Bilenge basi bakobina na esengo elongo na bilenge mibali mpe mibange. Nakobongola matanga na bango na esengo, nakopesa bango kobondisama mpe esengo na esika ya mawa.

09 Matayo 5:4

Esengo na bato oyo bazali kolela, pamba te bakobondisama!

Bantína oyo etali