Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bozalisi ya sika

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Bozalisi ya sika mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Emoniseli 21:5

Bongo Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi alobaki: « Nazali kokomisa biloko nyonso ya sika. » Alobaki lisusu: « Koma makambo oyo, pamba te maloba oyo ezali penza ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. »

02 Emoniseli 21:1

Bongo namonaki Likolo ya sika mpe mabele ya sika, pamba te Likolo ya liboso mpe mabele ya liboso elimwaki, mpe ebale monene ezalaki lisusu te.

03 2 Petelo 3:13

Nzokande, biso, kolanda elaka na Ye, tozali kozela Likolo ya sika mpe mabele ya sika epai wapi bosembo ekozala.

04 Ezayi 65:17

Solo, nakokela likolo mpe mabele ya sika; makambo ya liboso, bakokanisa yango lisusu te, ekomata ata lisusu na motema te.

05 Barome 8:21

bikelamu nyonso mpe ekokangolama na bowumbu ya libebi na yango mpo na kozwa bonsomi ya nkembo oyo bana na Nzambe bakozwa.

06 Emoniseli 21:4

Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. »

07 2 Bakolinto 5:17

Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika: makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.

Bantína oyo etali