Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bozongi ya Klisto
Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Bozongi ya Klisto mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
— Bato ya Galile, mpo na nini botikali awa na kotala na likolo? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na Likolo, akozonga ndenge kaka bomoni Ye kokende na Likolo.
pamba te tango kaka mitindo ekopesama na nzela ya koganga ya mokonzi ya ba-anjelu mpe ya kelelo ya Nzambe, Ye moko Nkolo akokita wuta na Lola mpe bato oyo basila kokufa kati na Klisto bakosekwa bato ya liboso. Sima na yango, biso bato oyo tokozala na bomoi na tango yango tokomemama elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo, na likolo; mpe na bongo, tokozala elongo na Nkolo libela na libela.
Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene.
Yoka! Nazali koya kala mingi te! Nakomema elongo na Ngai lifuti mpo na moto na moto kolanda misala na ye.
wana tozali kozela kokokisama ya elikya oyo epambolama: komonisama ya nkembo ya Yesu-Klisto, Nzambe monene mpe Mobikisi na biso, oyo
Yango wana, bosenzela; pamba te boyebi te mokolo nini Nkolo na bino akoya.
« Botala, azali koya kati na mapata! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » Ekosalema penza bongo! Amen.
Solo, mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi. Na mokolo yango, na lokito monene, Likolo ekolimwa, biloko ekozika na moto mpe ekonyangwama, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekozwa etumbu ya kobebisama na moto.