Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Yeruzalemi ya sika

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Yeruzalemi ya sika mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Emoniseli 21:2

Namonaki engumba ya bule, Yelusalemi ya sika, kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ebongisamaki lokola mwasi mobandami ya libala oyo asali monzele mpo na mobali na ye.

02 Emoniseli 21:10-11

Bongo kati na Molimo, amemaki ngai na likolo ya ngomba moko ya monene mpe ya molayi; alakisaki ngai Yelusalemi, engumba ya bule, oyo ezalaki kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ezalaki kongenga na nkembo ya Nzambe, mpe kongenga na yango ezalaki lokola kongenga ya libanga ya talo makasi, lokola jasipe oyo emonisaka lokola krisitali.

03 Ba-Ebre 12:22

Kasi, bopusani nde pene ya ngomba Siona, pene ya Yelusalemi ya Likolo, engumba ya Nzambe na bomoi; pene ya bankoto na bankoto ya ba-anjelu oyo basangani mpo na kosepela,

04 Emoniseli 21:22-23

Namonaki ata tempelo moko te kati na engumba, pamba te Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso mpe Mpate nde bazali Tempelo na yango. Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe; bongo Mpate azali mwinda na yango.

05 Bagalatia 4:26

Kasi Yelusalemi ya Likolo ezali nsomi, mpe yango nde ezali mama na biso;

06 Emoniseli 21:24-25

Bikolo ekotambola na pole na yango, mpe bakonzi ya mokili bakomema nkembo na bango kati na engumba. Bikuke ya engumba yango ekobanda kokangama te mokolo mobimba, pamba te butu ekozala kuna te.

Bantína oyo etali