Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mbano

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Mbano mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 3:14

Soki mosala ya moto oyo atongaki na likolo ya moboko eziki te, motongi yango akozwa lifuti.

02 Matayo 6:20

Kasi bonduka bomengo na bino kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te to nselele ekoki kolia yango te to mpe miyibi bakoki kobuka ndako te mpo na koyiba yango;

03 Bakolose 3:23-24

Mosala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na mitema na bino mobimba, lokola nde bozali kosala yango mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te, pamba te boyebi malamu ete bokozwa, lokola lifuti, libula oyo Nkolo abongisa mpo na bato ya Nzambe. Ezali Klisto nde azali Nkolo oyo bosalelaka.

04 Ba-Ebre 11:6

Nzokande, moto moko te akoki kosepelisa Nzambe soki azangi kondima, pamba te moto oyo azali kopusana pene ya Nzambe asengeli kondima ete Nzambe azali mpe afutaka bato oyo balukaka Ye.

05 Matayo 16:27

Pamba te Mwana na Moto akoya elongo na ba-anjelu na Ye kati na nkembo ya Tata na Ye mpe akofuta moto nyonso kolanda misala na ye.

06 Emoniseli 22:12

Yoka! Nazali koya kala mingi te! Nakomema elongo na Ngai lifuti mpo na moto na moto kolanda misala na ye.

Bantína oyo etali