Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Libanga ya litumu

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Libanga ya litumu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Efeso 2:20

Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba.

02 1 Petelo 2:6

Pamba te Makomi eloba: « Tala, napona libanga moko ya motuya oyo nazali kotia kati na Siona lokola libanga ya songe ya ndako; moto nyonso oyo akotiela yango motema akotikala koyokisama soni te. »

03 Banzembo 118:22

Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba.

04 Ezayi 28:16

Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona, libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako, libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga; moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye akotikala kobanga te.

05 Matayo 21:42

Yesu alobaki na bango: — Nanu botanga te kati na Makomi: « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba? Nkolo asalaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso. »

06 Misala ya Bantoma 4:11

Ye nde azali « libanga oyo bino, batongi ndako, bobwakaki, kasi ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba. »

07 Ba-Efeso 2:21-22

Kati na Yesu-Klisto, ndako mobimba esangani malamu mpe ezali kokola mpo ete ekoma Tempelo ya bule kati na Nkolo. Mpe kati na Ye, bino mpe bozali kotongama lisanga mpo ete bokoma Ndako oyo Nzambe avandaka kati na yango na nzela ya Molimo na Ye.

08 Malako 12:10-11

Nanu botanga Makomi oyo te: « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba? Ezali Nkolo nde alingaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso! »

09 1 Petelo 2:7

Boye lokumu ezali mpo na bino oyo bondimaka; kasi mpo na bato oyo bandimaka te, « libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga oyo esimbi ndako, libanga ya songe ya ndako,

10 Luka 20:17

Kasi Yesu atalaki bango mpe alobaki: — Bongo makambo oyo ekomama elakisi nini: « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako? »

11 1 Bakolinto 3:11

Pamba te moko te akoki kotonga moboko mosusu, longola kaka oyo esili kotongama, oyo ezali Yesu-Klisto.

12 Barome 9:33

kolanda ndenge ekomama: « Tala, nazali kotia kati na Siona libanga oyo ebetisaka bato mabaku, libanga monene oyo ekweyisaka bato; moto oyo akotiela yango motema akotikala koyokisama soni te. »

13 1 Petelo 2:4

Bopusana pene ya Ye oyo azali Libanga ya bomoi, Libanga oyo bato babwakaki, kasi Nzambe aponaki yango mpo ete ezali motuya mingi na miso na Ye.

Bantína oyo etali