Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mobateli Monene

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Mobateli Monene mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

Bakisá bavɛrsɛ nyɔnsɔ 8 Kela kɔ́nti ya ofele mpo na kokanga yango na motó.
01 Ba-Ebre 13:20 Vɛrsɛ ya ntina

Tika ete Nzambe ya kimia, Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Mobateli monene ya bameme, Yesu, Nkolo na biso, na nzela ya makila ya Boyokani ya seko,

02 1 Petelo 5:4

Bongo tango Mokonzi ya babateli bibwele akoya, bokozwa motole ya nkembo oyo ekotikala kobungisa kitoko na yango te.

03 1 Petelo 2:25

Pamba te bozalaki lokola bameme oyo ezali koyengayenga, kasi sik’oyo bozongi epai ya Mobateli bibwele oyo akengelaka bomoi na bino.

04 Yoane 10:11

Nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu ya bameme apesaka bomoi na ye mpo na bameme na ye.

05 Banzembo 23:1

Nzembo ya Davidi. Yawe azali mobateli na ngai, nakozanga ata eloko moko te.

06 Yoane 10:14

Ngai, nazali mobateli malamu ya bibwele; nayebi bameme na Ngai, mpe bameme na Ngai eyebi Ngai

07 Ezayi 40:11

Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele: kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.

08 Ezekieli 34:23

Nakotia liboso na yango mobateli moko kaka ya bibwele: Davidi, mosali na Ngai; akoleisa yango, akoluka bolamu na yango mpe akozala mobateli na yango.

Bantína oyo etali