Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Efeso 1:20

mpe asalelaki yango kati na Klisto tango asekwisaki Ye kati na bakufi mpe avandisaki Ye na ngambo ya loboko na Ye ya mobali kati na Likolo,

02 Ba-Ebre 1:3

Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,

03 Bakolose 3:1

Lokola bosekwaki mpe elongo na Klisto, bolukaka biloko ya Likolo epai wapi Klisto avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe,

04 Malako 16:19

Sima na Nkolo Yesu koloba na bango, amemamaki kati na Likolo mpe avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.

05 Banzembo 110:1

Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai: « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »

06 Ba-Ebre 10:12

Kasi sima na Klisto kobonza mbeka moko kaka mpo na masumu, avandi mpo na libela na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.

07 Ba-Ebre 1:13

Mpe lisusu, epai ya anjelu nini Nzambe aloba: « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo? »

08 Misala ya Bantoma 2:33

Sima na loboko ya mobali ya Nzambe konetola Ye, azwaki epai ya Tata, Molimo Mosantu oyo Ye Tata alakaki, mpe asopeli biso Molimo Mosantu yango ndenge bozali komona mpe koyoka sik’oyo.

Bantína oyo etali