Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mokonzi ya bakonzi

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Mokonzi ya bakonzi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Emoniseli 19:16

Na nzambala mpe na mopende na Ye, bakoma kombo: « Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. »

02 1 Timote 6:15

na tango oyo ekatama na Ye oyo azali Nkolo-Na-Esengo, Nkolo se moko na nguya nyonso, Mokonzi ya bakonzi, Nkolo ya bankolo,

03 Emoniseli 17:14

Bakobundisa Mpate, kasi Mpate akolonga bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Elongo na Ye, babengami, baponami mpe ba-oyo bazali sembo bakolonga mpe lokola. »

04 Banzembo 24:7-8

Bino bikuke, botombola mitondo na bino! Bino bikuke ya kala, bomitombola! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota! Nani azali Mokonzi yango ya nkembo? Ezali Yawe, Elombe ya nguya; Yawe, Elombe ya bitumba.

05 Daniele 7:14

Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.

06 Emoniseli 11:15

Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola; elobaki: « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »

07 Banzembo 47:7-8

Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, boyemba mpo na lokumu na Ye. Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, boyemba mpo na lokumu na Ye. Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.

08 1 Timote 1:17

Tika ete lokumu mpe nkembo ezonga epai ya Mokonzi ya seko, Ye oyo akufaka te, amonanaka te mpe azali Nzambe se moko mpo na libela na libela! Amen.

09 Zakari 9:9

Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.

10 Banzembo 2:6

« Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »

11 Ezayi 9:6-7

Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye. Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.

Bantína oyo etali