Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nkombo ya Yesu

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Nkombo ya Yesu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Misala ya Bantoma 4:12

Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.

02 Bafilipi 2:10-11

mpo ete, na Kombo na Yesu, mabolongo nyonso efukama kati na Likolo, na mokili mpe na se ya mabele, mpe minoko nyonso etatola ete Yesu-Klisto azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.

03 Matayo 1:21

Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango. »

04 Yoane 14:13-14

Mpe nakosala nyonso oyo bokosenga na Kombo na Ngai, mpo ete Tata azwa lokumu kati na Mwana. Soki bosengi Ngai eloko na Kombo na Ngai, nakosala yango.

05 Misala ya Bantoma 3:16

Ezali na nzela ya kondima kati na Kombo na Yesu nde moto oyo bozali komona mpe boyebi azwi makasi ya kotelema. Ezali Kombo na Yesu mpe kondima oyo ewuti kati na Yesu nde ekomisi nzoto na ye mobimba kolongono ndenge bozali komona yango.

06 Bafilipi 2:9

Yango wana mpe Nzambe atombolaki Ye na likolo ya nyonso mpe apesaki Ye Kombo oyo eleki bakombo nyonso,

07 Bakolose 3:17

Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.

08 Masese 18:10

Kombo ya Yawe ezali lokola ndako molayi batonga makasi; moyengebene akimelaka kuna mpe azwaka ebombamelo ya makasi.

09 Yoane 20:31

Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.

10 Misala ya Bantoma 4:10

tika ete, bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele, boyeba ete ezali na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono; kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi.

11 1 Bakolinto 6:11

Mpe bozalaki ndenge wana, bato mosusu kati na bino. Kasi basukolaki bino, babulisaki bino mpe bakomisaki bino bato ya sembo, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.

12 Matayo 18:20

Pamba te na esika oyo bato mibale to bato misato basangani na Kombo na Ngai, Ngai mpe nazali wana kati na bango.

13 Barome 10:13

Solo, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama.

14 Yoane 16:23-24

Na mokolo yango, bokopesa Ngai lisusu ata motuna moko te. Nazali koloba na bino penza ya solo: Tata akopesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai. Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.

15 Misala ya Bantoma 2:21

Boye, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama. »

Bantína oyo etali