Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mobateli Malamu

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Mobateli Malamu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 10:11

Nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu ya bameme apesaka bomoi na ye mpo na bameme na ye.

02 Banzembo 23:1

Nzembo ya Davidi. Yawe azali mobateli na ngai, nakozanga ata eloko moko te.

03 Yoane 10:14

Ngai, nazali mobateli malamu ya bibwele; nayebi bameme na Ngai, mpe bameme na Ngai eyebi Ngai

04 Yoane 10:27-28

Bameme na Ngai eyokaka mongongo na Ngai. Nayebi bameme na Ngai, mpe yango elandaka Ngai. Napesi yango bomoi ya seko: ekokufa soki moke te, mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na Ngai.

05 Ezekieli 34:11-12

Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ngai moko nakoluka bolamu ya bibwele na Ngai mpe nakobatela yango. Ndenge mobateli bibwele alukaka bolamu ya bibwele na ye, soki azali elongo na yango, ndenge wana mpe Ngai nakobatela mpe nakobikisa bibwele na Ngai wuta na bisika nyonso epai wapi ezali ya kopanzana, na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi.

06 Banzembo 23:2-3

Apemisaka ngai na matiti ya mobesu, mpe amemaka ngai pembeni ya mayi ya kimia. Ayeisaka sika makasi ya bomoi na ngai, akambaka ngai na banzela ya bosembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye.

07 Yoane 10:15

—ndenge kaka Tata ayebi Ngai, mpe Ngai nayebi Tata— Nazali kokaba bomoi na Ngai mpo na bameme na Ngai.

08 Yoane 10:9

Ngai nde nazali ekuke; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei.

09 Ezayi 40:11

Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele: kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.

10 1 Petelo 2:25

Pamba te bozalaki lokola bameme oyo ezali koyengayenga, kasi sik’oyo bozongi epai ya Mobateli bibwele oyo akengelaka bomoi na bino.

11 Luka 15:4-5

— Soki moko kati na bino azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi; boni, akotika te bameme tuku libwa na libwa kati na esobe mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga kino amona yango? Mpe tango akomona yango, akotia yango na mapeka na ye, na esengo.

12 Yoane 10:4

Soki abimisi bameme na ye nyonso na libanda, alekaka liboso na yango; mpe bameme elandaka ye na sima, pamba te eyebi mongongo na ye.

Bantína oyo etali