Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Molobeli na biso

Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Molobeli na biso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Yoane 2:1

Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki esali ete moko kati na bino akweyi na lisumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata: Yesu-Klisto, Nkolo-Na-Bosembo.

02 Barome 8:34

Nani akokatela bango etumbu? Moko te! Yesu-Klisto akufaki; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.

03 Ba-Ebre 7:25

Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.

04 1 Timote 2:5

Solo, ezali na Nzambe kaka moko. Ndenge moko mpe ezali na Moyokanisi kaka moko kati na Nzambe mpe bato: ezali moto moko, Yesu-Klisto

05 Ezayi 53:12

Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene, mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi, pamba te akabaki bomoi na ye na kufa mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato, pamba te amemaki masumu ya bato ebele mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.

06 Ba-Ebre 9:24

Pamba te Klisto akotaki te na Esika ya Bule oyo esalemaki na maboko ya bato, oyo ezalaki kaka elilingi ya Esika ya Bule ya solo; kasi akotaki nde kati na Likolo yango moko mpo ete atelema sik’oyo liboso ya Nzambe mpo na bolamu na biso.

07 Ba-Ebre 4:14-16

Yango wana, lokola tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akatisa Likolo, Ye Yesu, Mwana na Nzambe, tosimba makasi kondima oyo totatolaka. Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te. Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.

08 Yoane 17:9

Nazali kobondela nde mpo na bango; nazali kobondela te mpo na bato ya mokili, kasi mpo na bato oyo opesaki Ngai, mpo ete bazali bato na Yo.

09 Ba-Ebre 7:24-25

Kasi mpo ete Yesu azali na bomoi seko na seko, Bonganga-Nzambe na Ye ezali mpo na libela. Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.

10 Zakari 3:1-2

Yawe alakisaki ngai Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo azalaki ya kotelema liboso ya Anjelu ya Yawe. Alakisaki ngai lisusu Satana oyo azalaki ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Jozue mpo na kofunda ye. Yawe alobaki na Satana: — Satana, tika ete Yawe apamela yo! Tika ete Yawe oyo apona Yelusalemi apamela yo! Boni, moto oyo azali te lokola koni ya moto oyo balongoli na moto?

11 Barome 8:33-34

Nani akofunda bato oyo Nzambe apona? Ezali Nzambe nde akomisaka sembo. Nani akokatela bango etumbu? Moko te! Yesu-Klisto akufaki; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.

12 1 Yoane 2:2

Amikabaki lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso; mpo na masumu na biso kaka te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.

13 Ba-Ebre 12:24

pene ya Yesu, Moyokanisi ya Boyokani ya sika; mpe pene ya makila na Ye, oyo esopanaki mpe egangaka koleka makila ya Abele.

14 Yobo 16:19

Wuta sik’oyo, motatoli na ngai azali na Likolo, molobeli na ngai azali na Lola.

Bantína oyo etali