Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Koloba mpo na bato bazangi mongongo

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Koloba mpo na bato bazangi mongongo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 31:8-9

Fungola monoko na yo mpo na kolobela bato oyo bazali na makoki ya koloba te, mpe mpo na kolongisa bato oyo bazanga basungi. Fungola monoko na yo mpe sambisa na bosembo, bundela babola mpe bato oyo bakelela.

02 Ezayi 1:17

Boyekola nde kosala malamu, boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola, bobundela mwana etike, bokotela mwasi oyo akufisa mobali!

03 Banzembo 82:3-4

Bolongisa moto oyo azangi makasi mpe mwana etike, bokata likambo ya moto ya mawa mpe ya mobola; bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi mpe na mobola, bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe.

04 Jeremi 22:3

tala liloba oyo Yawe alobi: Bosalela bosembo mpe bosolo; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te.

05 Masese 24:11-12

Kangola bato oyo bazali komema bango na kufa, mpe bikisa bato oyo bazali kokende na kufa lokola bato oyo balangwe masanga. Soki olobi: « Tala, toyebaki likambo moko te kati na makambo oyo nyonso; » boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te? Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te? Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye?

06 Yobo 29:12

pamba te nazalaki kosunga babola oyo bazalaki kosenga lisungi, mpe mwana etike oyo azangi moto oyo akosunga ye.

07 Banzembo 41:1

Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

08 Ester 4:14

Pamba te soki yo okangi monoko na yo mpe olobi eloko moko te na tango oyo, lisungi mpe lobiko mpo na Bayuda ekowuta na esika mosusu; kasi yo mpe libota ya botata na yo, bokokufa. Kutu, nani ayebi soki tango mosusu ezali mpo na makambo ya boye nde okomaki na ndako ya mokonzi?

09 Masese 29:7

Moto ya sembo ayebaka pasi ya babola, kasi moto mabe ayebaka na ye kutu yango te.

Bantína oyo etali