Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Makasi ya sika

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Makasi ya sika mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ezayi 40:31

basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika: bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.

02 2 Bakolinto 4:16

Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.

03 Banzembo 103:5

atondisaka bomoi na yo na esengo mpe akomisaka yo elenge lokola mpongo.

04 Bafilipi 4:13

Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.

05 Ezayi 40:29

Apesaka makasi na bato oyo balembi mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya.

06 Ezayi 40:30-31

Solo, bilenge bapemaka mpe balembaka, bilombe batengaka-tengaka; basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika: bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.

07 Banzembo 73:26

Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.

08 Ba-Efeso 3:16

mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye,

09 Banzembo 28:7-8

Yawe azali makasi mpe nguba na ngai; natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai. Motema na ngai etondi na esengo, mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai. Yawe azali makasi ya bato na Ye, ndako batonga makasi epai wapi mopakolami na Ye azwaka lobiko.

10 Neyemi 8:10

Neyemi alobaki na bango lisusu: — Sik’oyo, bokende, bolia bilei ya kitoko, bomela masanga ya kitoko mpe botinda ndambo epai ya bato oyo bazangi eloko ya kolamba, pamba te mokolo oyo ezali bule mpo na Nkolo na biso. Boye bozala na mawa te, pamba te esengo ya Yawe ezali makasi na bino.

11 Bakolose 1:11

mpo ete bokoma bato na nguya kati na makambo nyonso kolanda makasi ya nkembo na Ye, mpo ete boyikela nyonso mpiko mpe bozala na molende mpe esengo kino na suka;

12 Banzembo 138:3

Na mokolo oyo nabelelaki Yo, oyanolaki ngai, otondisaki ngai na mpiko mpe na makasi.

13 Abakuki 3:19

Nkolo Yawe azali makasi na ngai: akomisaka makolo na ngai lokola makolo ya mboloko, apesaka ngai makasi ya komata kino na likolo ya bangomba.

Bantína oyo etali