Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kopɛtolama na mɔtɔ

Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Kopɛtolama na mɔtɔ mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Petelo 1:7

Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.

02 Zakari 13:9

Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto mpe nakomeka bango ndenge bamekaka wolo na moto; bakobelela Kombo na Ngai, mpe Ngai nakoyanola bango. Nakoloba na bango: ‹ Bozali bato na Ngai, › mpe bango bakoloba: ‹ Yawe azali Nzambe na biso! › »

03 Malashi 3:3

Akovanda lokola monyangwisi bibende mpe mopetoli palata na moto. Akopetola bana mibali ya Levi mpe akolekisa bango na moto ndenge bapetolaka wolo mpe palata, mpe bakokoma mpo na Yawe bato oyo bamemelaka Ye makabo kolanda ndenge esengeli kozala.

04 Yobo 23:10

Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda; soki ameki ngai, nakokoma lokola wolo ya peto.

05 Ezayi 48:10

Tala, napetolaki yo, kasi ndenge bapetolaka palata na moto te; namekaki yo kati na moto ya minyoko.

06 Masese 17:3

Bapetolaka palata na kikalungu, mpe bapetolaka wolo na fulu ya moto makasi, kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.

07 Banzembo 66:10

Pamba te, Nzambe, omekaki biso, olekisaki biso kati na moto ndenge basalaka mpo na palata.

08 Ezayi 1:25

Nakotelemela bino, nakopetola bosoto ya palata na bino mpe nakolongola salite na bino,

09 Daniele 12:10

Bato ebele bakopetolama, bakozanga mbeba mpe bakokoma bato ya kokoka; kasi bato mabe bakokoba kaka kosala mabe. Moto moko te ya mabe akososola, kaka bato oyo bakozala na bwanya nde bakososola.

10 Jake 1:12

Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.

11 1 Bakolinto 3:13

mokolo ya kosambisama ekomonisa mosala na ye polele; pamba te ekozala mokolo ya moto, mpe moto ekomeka mosala ya moto na moto.

12 Yobo 42:5

Matoyi na ngai eyokaki makambo oyo bazalaki koloba na tina na Yo; kasi sik’oyo, miso na ngai emoni Yo.

13 Barome 5:3-5

Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko, koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya. Nzokande, elikya ekosaka te, pamba te Nzambe asopaki bolingo na Ye kati na mitema na biso na nzela ya Molimo Mosantu oyo Ye Nzambe apesaki biso.

14 2 Bakolinto 4:17

Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya.

Bantína oyo etali