Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Koleka balongi

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Koleka balongi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Barome 8:37

Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali penza balongi na nzela ya Ye oyo alinga biso.

02 Barome 8:38-39

Pamba te nandimisami ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge, banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

03 1 Bakolinto 15:57

Kasi tika ete Nzambe apesamela matondi, pamba te apesaka biso elonga na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto!

04 1 Yoane 5:4

pamba te mwana nyonso ya Nzambe alongaka mokili, mpe elonga oyo elongaki mokili ezali: kondima na biso.

05 2 Bakolinto 2:14

Sik’oyo, tika ete matondi ezonga epai na Nzambe oyo, mpo na bomoko na biso na Klisto, atambolisaka biso tango nyonso kati na molongo na Ye ya balongi, mpe azwaka biso lokola bisalelo na Ye mpo na kopanza boyebi ya Klisto, na bisika nyonso, lokola solo kitoko ya malasi.

06 Bafilipi 4:13

Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.

07 1 Yoane 4:4

Bino, bana na ngai, bozali ya Nzambe mpe bosili kolonga basakoli yango ya lokuta, pamba te Ye oyo azali kati na bino azali na nguya koleka ye oyo azali kati na mokili.

08 2 Bakolinto 12:9-10

Kasi azongiselaki ngai: « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai. Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.

09 1 Bakolinto 15:58

Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.

10 Barome 8:31

Boye, toloba lisusu nini? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso?

11 Banzembo 44:5

Oh Nzambe, Yo oyo ozali Mokonzi na ngai, pesa mitindo mpo na elonga ya Jakobi.

Bantína oyo etali