Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mwana ya Nzambe
Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Mwana ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te: ezali mpo ete eyebi Nzambe te.
nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.
Boye bino nyonso bozali bana na Nzambe na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto;
Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana na Nzambe.
Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka.
Boye, ozali lisusu mowumbu te, kasi mwana. Mpe mpo ete ozali mwana, Nzambe okomisi yo mokitani ya libula na Ye.