Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mungwa ya Mokili

Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Mungwa ya Mokili mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Matayo 5:13

Bozali mungwa ya mokili. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakokoka lisusu kozongisa elengi na yango? Ezali lisusu na tina moko te; etikali kaka eloko ya kobwaka mpe ya konyata.

02 Matayo 5:16

Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.

03 Bakolose 4:6

Tika ete maloba na bino etondaka tango nyonso na boboto mpe na elengi, mpo ete boyeba ndenge nini koyanola moto nyonso.

04 Malako 9:50

Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.

05 Bafilipi 2:15

mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili

06 Ba-Efeso 4:29

Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.

07 Luka 14:34-35

Mungwa ezali malamu; kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakozongisa lisusu elengi na yango? Ekozala lisusu na tina moko te, ezala mpo na mabele to mpo na kobongisa bilanga; kasi bakobwaka yango. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!

08 Barome 12:2

Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.

09 1 Petelo 2:12

Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.

10 Tito 2:7-8

Na makambo nyonso, zala ndakisa na nzela ya misala malamu; mpe na mateya na yo, lakisa bosembo, longola maseki, salela maloba ya kimia mpe ezanga pamela, mpo ete bato oyo batelemelaka yo bayoka soni mpe bazanga mabe ya koloba na tina na biso.

11 Matayo 5:15

Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini; nzokande, atiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete engengisa bato nyonso oyo bazali kati na ndako.

12 Jake 3:13

Nani kati na bino azali moto ya bwanya mpe ya mayele? Tika ete ezaleli malamu na ye emonisa misala na yango kati na komikitisa mpe na bwanya.

13 1 Petelo 3:15

Kasi, kati na mitema na bino, bopesaka Klisto lokumu lokola Nkolo. Botatolaka tango nyonso tina ya elikya na bino epai ya bato nyonso oyo bakotuna bino tina yango,

14 Barome 14:19

Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka bamoko mpe bamosusu kati na kondima.

Bantína oyo etali