Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Molingami
Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Molingami mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.
Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te: ezali mpo ete eyebi Nzambe te.
Epai na bino nyonso oyo, kati na Rome, bozali balingami ya Nzambe mpe bobengama mpo na kozala basantu: Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye, oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.
Amemaki ngai na esika oyo bamelaka masanga, mpe bendele na ye likolo na ngai ezali bolingo.
Yawe abimelaki biso na kala, alobaki: « Nalingaka bino na bolingo ya seko; yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo.
Mpo na Benjame, alobaki: « Tika ete molingami ya Yawe azala na kimia pembeni na Ye, pamba te Ye nde abatelaka ye mokolo mobimba; mpe moto oyo Yawe alingaka apemaka na kati-kati ya mapeka na Ye! »