Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bonganga-Nzambe ya bokonzi

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Bonganga-Nzambe ya bokonzi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Petelo 2:9

Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.

02 Kobima 19:6

kasi bino bokozala mpo na Ngai ekolo oyo ekosala mosala ya bonganga-Nzambe, ekolo ya bule. » Oyo nde maloba okoyebisa bana ya Isalaele.

03 Emoniseli 1:6

Ye oyo akomisaki biso ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo na kosalela Nzambe, Tata na Ye: Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela! Amen!

04 1 Petelo 2:5

Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka.

05 Emoniseli 5:10

Okomisaki bango ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo Nzambe na biso, mpe bakokonza mokili. »

06 Ba-Ebre 13:15

Yango wana, na nzela ya Yesu, tobonzelaka Nzambe tango nyonso mbeka ya masanzoli, elingi koloba: mbuma ya bibebu oyo etatolaka polele Kombo na Ye.

Bantína oyo etali