Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bóganga na esengo
Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Bóganga na esengo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nzembo ya kozongisa matondi. Bino nyonso bato ya mokili mobimba, boganga na esengo epai na Yawe!
Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko, boyemba banzembo ya esengo mpe bobeta mindule!
Boya, toganga na esengo mpo na Yawe! Tobetela Libanga na biso maboko, pamba te azali Mobikisi na biso! Tokende liboso na Ye elongo na mabondeli ya kozongisa matondi, tobetela Ye maboko elongo na banzembo.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo. Bino bato ya mokili mobimba, bobetela Nzambe maboko!
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Azafi. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.