Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mai ya bomoi
Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Mai ya bomoi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Moto oyo akondima Ngai, kolanda ndenge Makomi elobi, bibale ya mayi ya bomoi ekotiola wuta kati na ye.
kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te: mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.
Yesu azongiselaki ye: — Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.
Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka, mpe bibale, na mabele ya kokawuka; nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo.
Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi: — Yaka! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba: « Yaka! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.
Na mokolo ya suka ya feti, mokolo oyo eleki monene, Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi: — Tika ete moto nyonso oyo azali na posa ya mayi aya epai na Ngai mpe amela.
« Bato na Ngai basali masumu mibale: Basundoli Ngai oyo nazali etima ya bomoi, mpe batimoli bango moko mabulu ya mayi, mabulu oyo ekawukaka noki.
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.