Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Litomba ya bosembo

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Litomba ya bosembo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 13:11

Bomengo oyo ezwami na lombangu mpe na nzela ya mabe esilaka noki, kasi bomengo oyo babakisaka na moke-moke ekomaka ebele.

02 Masese 16:8

Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamu koleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe.

03 Masese 20:23

Kilo oyo ekesana na kilo mosusu ezalaka nkele na miso ya Yawe, mpe emekelo kilo ya lokuta ezalaka eloko ya malamu te.

04 Levitike 19:35-36

Bokosalela lokuta te tango bokomeka molayi, bakilo mpe tango bokoluka koyeba ebele oyo ekoki kozala na kati. Bokosalela bimekelo ya malamu, bakilo ya malamu, efa ya malamu; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito.

05 Masese 28:6

Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mozwi oyo nzela na ye ezali mabe.

06 Masese 11:1

Bimekelo kilo ya lokuta ezali lokola makambo ya nkele na miso ya Yawe, kasi kilo ya sembo ezali elengi na miso na Ye.

07 Masese 10:2

Bomengo oyo ezwami na nzela ya mabe epesaka litomba te, kasi bosembo ekangolaka na kufa.

08 Jeremi 17:11

Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. Boye, bomengo yango ekokima na kati-kati ya bomoi na ye mpe ekomonisa bozoba na ye na suka ya bomoi na ye.

09 Levitike 19:13

Okonyokola te moninga na yo to okoyiba ye te. Okobomba te lifuti ya mosali na yo butu mobimba kino na tongo.

Bantína oyo etali