Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Batela monɔkɔ na yo

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Batela monɔkɔ na yo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 21:23

Moto oyo abatelaka monoko mpe lolemo na ye abatelaka molimo na ye na pasi.

02 Banzembo 141:3

Yawe, kengela monoko na ngai, batela malamu ekuke ya bibebu na ngai!

03 Masese 13:3

Moto oyo abatelaka monoko na ye abatelaka molimo na ye, kasi moto oyo afungolaka monoko na ye makasi akosuka na libebi.

04 Jake 1:26

Moto oyo akanisaka ete asambelaka Nzambe, kasi ayebaka te kobatela lolemo na ye, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te.

05 Banzembo 39:1

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi mpe ya Yedutuni. Nzembo ya Davidi.

06 Masese 10:19

Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.

07 Masese 17:28

Ezala moto ya liboma, soki avandi kimia, amonanaka lokola moto ya bwanya; moto oyo akangaka monoko na ye amonanaka lokola moto ya mayele.

08 Mosakoli 5:2

Ndenge ndoto eyaka soki moto azali na misala mingi, ndenge wana mpe maloba ebele ebimisaka bozoba.

09 Matayo 12:36

Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino: na mokolo ya kosambisama, bato bakosamba mpo na maloba ezanga tina, oyo babimisaki.

10 Masese 12:18

Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka lokola mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali lokola mafuta oyo ebikisaka.

11 Masese 4:24

Longola lokuta na monoko na yo, mpe longola mabe na bibebu na yo.

12 Jake 1:19

Bandeko balingami, bosimba likambo oyo: tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika;

13 Masese 18:21

Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo; moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.

14 Mosakoli 5:6

Ndoto ebele mpe maloba ebele ezali kaka pamba; yango wana tosa nde Nzambe.

15 Masese 29:20

Soki omoni moto kowela koloba liboso ete akanisa, malamu kotia elikya na zoba, kasi na ye te.

Bantína oyo etali