Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Koimaima

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Koimaima mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bafilipi 2:14

Bosalaka likambo moko te na koyimayima mpe na tembe,

02 1 Bakolinto 10:10

Boyimaka-yimaka te ndenge bamosusu kati na bango bayimaki-yimaki, mpe anjelu mobebisi abomaki bango.

03 1 Petelo 4:9

Boyambanaka malamu lokola nde boyambi bapaya kati na bandako na bino, bosalaka bongo na koyimayima te.

04 Mitango 11:1

Mokolo moko, bana ya Isalaele bakomaki kolelalela na tina na pasi na bango. Boye, kolelalela yango ekomaki kino na matoyi ya Yawe. Tango ayokaki yango, kanda na Ye emataki makasi mpe moto kowuta epai na Yawe epelaki kati na bango mpe etumbaki ndambo ya bato kati na molako.

05 Jake 5:9

Bandeko na ngai, botika kofundana bino na bino, noki te Nzambe akosambisa bino. Botala, Mosambisi azali ya kotelema liboso ya ekuke.

06 Kobima 16:8

Moyize alobaki lisusu: — Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe.

07 Mitango 14:27

— Kino penza tango nini lisanga oyo ya batomboki ekokoba kotelemela Ngai? Solo, nayoki bileli mpe koyimayima ya bana ya Isalaele na tina na Ngai.

08 Bileli 3:39

Mpo na nini moto na bomoi amilela-lela tango bapesi ye etumbu likolo ya masumu na ye?

09 Jide 1:16

Bato yango bayimaka-yimaka mpe bamilelaka-lelaka tango nyonso, batambolaka kolanda baposa mabe ya banzoto na bango, bamikumisaka mpe bakumisaka bato mosusu na lokuta mpo na kobenda litomba kowuta na bango.

10 Bafilipi 2:14-15

Bosalaka likambo moko te na koyimayima mpe na tembe, mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili

11 Banzembo 106:25

Bayimaki-yimaki kati na bandako na bango ya kapo, batosaki mongongo ya Yawe te.

12 Yoane 6:43

Yesu azongiselaki bango: — Botika koyimayima kati na bino!

13 Mitango 14:2

Bato nyonso ya Isalaele bakomaki koyimayima mpo na Moyize mpe Aron, mpe lisanga mobimba ekomaki koloba: « Ah, elingaki kozala malamu soki tomikufelaki na biso na Ejipito to na esobe!

14 Kobima 14:11

Balobaki na Moyize: — Boni, ezali mpo ete malita ezali te na Ejipito, yango wana omemi biso mpo ete tokufa na esobe? Osali biso nini awa obimisi biso na Ejipito?

15 1 Bakolinto 10:11

Makambo wana nyonso ekweyelaki bango mpo ete ezala ndakisa mpo na biso, mpe ekomamaki mpo na kokebisa biso oyo tokomi na tango ya suka.

Bantína oyo etali