Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Lolemo

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Lolemo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Jake 3:5

Ezali mpe ndenge moko mpo na lolemo: ezali eteni moko ya moke kati na nzoto ya moto, kasi ekoki komikumisa na makambo minene penza. Tala, mwa moto moke ezikisaka zamba monene!

02 Masese 18:21

Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo; moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.

03 Jake 3:6

Lolemo mpe ezali moto; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba.

04 Jake 1:26

Moto oyo akanisaka ete asambelaka Nzambe, kasi ayebaka te kobatela lolemo na ye, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te.

05 Masese 21:23

Moto oyo abatelaka monoko mpe lolemo na ye abatelaka molimo na ye na pasi.

06 Masese 15:4

Maloba ya kimia ezali lokola nzete ya bomoi, kasi maloba ya botomboki ezokisaka motema.

07 Ba-Efeso 4:29

Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.

Bantína oyo etali