Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Koloba solo

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Koloba solo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Efeso 4:15

Kasi wana tokolobaka bosolo kati na bolingo, tokokolaka na makambo nyonso kati na Klisto oyo azali moto.

02 Zakari 8:16

Tala makambo oyo bosengeli kosala: Tika ete moko na moko kati na bino alobaka solo na moninga na ye; bosambisaka na bosolo mpe bokataka makambo na bosembo kati na bisambiselo na bino,

03 Ba-Efeso 4:25

Yango wana, tika ete moko na moko kati na bino abwaka lokuta mpe alobaka solo na moninga na ye, pamba te biso nyonso tozali kaka biteni ya nzoto moko.

04 Masese 12:22

Bibebu oyo ekosaka ezali nkele na miso ya Yawe, kasi bibebu oyo ekokisaka bosembo ezalaka elengi na miso na Ye.

05 Banzembo 15:2

Ezali moto oyo azangi pamela, oyo asalaka makambo ya sembo mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye;

06 Masese 12:19

Moto oyo alobaka solo akowumela mpo na libela, kasi mokosi akowumela kaka mpo na tango moke.

07 Yoane 8:32

bokoyeba solo, mpe solo ekokangola bino.

08 Bakolose 3:9

Bokosanaka te, pamba te bobwakaki bomoto na bino ya kala elongo na misala na yango

09 Banzembo 34:13

Nani asepelaka na bomoi? Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo?

10 1 Petelo 3:10

Solo, moto nyonso oyo azali na posa ya kolinga bomoi mpe kobika mikolo ya esengo asengeli kobatela lolemo na ye mosika na mabe, mpe bibebu na ye mosika na maloba ya lokuta;

11 Masese 8:7

Pamba te monoko na ngai ebimisaka maloba ya solo, mpe bibebu na ngai eyinaka mabe.

Bantína oyo etali