Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Maloba ya kolendisa

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Maloba ya kolendisa mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Efeso 4:29

Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.

02 Masese 12:25

Motema oyo etondi na komitungisa ekobuka moto, kasi liloba ya esengo esepelisaka moto.

03 1 Batesalonika 5:11

Yango wana, bolendisanaka mpe bosunganaka bino na bino, ndenge mpe kaka bozali kosala yango.

04 Ba-Ebre 3:13

kasi bolendisanaka bino na bino mokolo na mokolo, na tango nyonso oyo bakoki nanu koloba « lelo, » mpo ete moko te kati na bino akosama na masumu mpe akoma motema libanga.

05 Masese 16:24

Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi, epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.

06 Masese 25:11

Liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezali lokola wolo oyo basangisi na palata.

07 Ezayi 50:4

Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli, mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba moto oyo alembi; alamusaka ngai tongo nyonso, alamusaka litoyi na ngai mpo ete nayoka lokola moyekoli.

08 Bakolose 4:6

Tika ete maloba na bino etondaka tango nyonso na boboto mpe na elengi, mpo ete boyeba ndenge nini koyanola moto nyonso.

09 Masese 15:23

Kozongisa eyano ya malamu epesaka moto esengo, mpe liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezalaka kitoko.

Bantína oyo etali