Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kopambola basusu

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Kopambola basusu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

Bakisá bavɛrsɛ nyɔnsɔ 6 Kela kɔ́nti ya ofele mpo na kokanga yango na motó.
01 Barome 12:14 Vɛrsɛ ya ntina

Bopambolaka bato oyo banyokolaka bino; iyo, bopambolaka, kasi bolakelaka mabe te!

02 1 Petelo 3:9

Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.

03 Luka 6:28

Bopambolaka bato oyo balakelaka bino mabe, mpe bobondelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.

04 Mitango 6:24-26

‘ Tika ete Yawe apambola yo mpe abatela yo! Tika ete Yawe angengisela yo elongi na Ye mpe apesa yo ngolu na Ye! Tika ete Yawe amona yo mpe apesa yo kimia! ’ ›

05 Matayo 5:44

Kasi Ngai, nazali koloba na bino: Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.

06 Ebandeli 12:2

Nakokomisa yo ekolo monene mpe nakopambola yo; nakokomisa kombo na yo monene, mpe okozala etima ya mapamboli.

Bantína oyo etali