Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bosembo na makambo ya mike
Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Bosembo na makambo ya mike mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Moto oyo azali sembo na makambo mike, akoki mpe kozala sembo na makambo minene; mpe moto oyo azali sembo te na makambo mike, akozala mpe sembo te na makambo minene.
Nkolo azongiselaki ye: « Malamu! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »
Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.
Mosala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na mitema na bino mobimba, lokola nde bozali kosala yango mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te,
Nzokande, eloko oyo basengaka epai ya bakambi, ezali ete bazala sembo.
Nkolo alobaki na ye: « Osali malamu! Ozali mosali malamu! Mpo ete ozalaki sembo na likambo ya moke, nakokomisa yo moyangeli ya bingumba zomi. »
Nkolo azongiselaki ye: « Malamu! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »
Moto ya sembo afulukaka na mapamboli, kasi moto oyo awelaka kokoma mozwi na lombangu akozanga te kozwa etumbu.
Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona ya basi. Basengeli kozala: basi oyo babongi na limemia, basi oyo batongaka bato te, basi oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango mpe basi ya sembo na makambo nyonso.
ekomaka ya sika tongo nyonso. Solo, boyengebene na Yo ezali monene!
Tosalaka bolamu; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.
Boye soki bozali sembo te na bobateli bomengo oyo ezwami na banzela ya lokuta, nani akopesa bino bomengo ya solo?
Yesu ayebisaki bango lisese mosusu: « Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye. Nkona yango eleki bankona nyonso na moke; kasi soki ekoli, elekaka bandunda nyonso ya elanga na molayi mpe ekomaka monene; ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na yango na bitape na yango. »
Bokangela biso bambwa ya zamba mpe bana na yango oyo ezali kobebisa bilanga na biso ya vino, pamba te bilanga na biso ya vino ebimisi bafololo.