Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kotɛlɛma ngwi

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Kotɛlɛma ngwi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 15:58

Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.

02 Jake 1:3-4

Pamba te boyebi malamu ete komekama ya kondima na bino ebotaka kokanga motema. Nzokande kokanga motema na bino esengeli te kosuka na nzela mpo ete bokoma bato bakemba mpe bakoka kati na kondima, bato oyo bazangi pamela.

03 Bakolose 1:23

Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.

04 Banzembo 16:8

Natalelaka Yawe tango nyonso, pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.

05 1 Petelo 5:9

Botelemelaka ye mpe boyikaka mpiko kati na kondima, pamba te boyebi ete bandeko na bino, oyo bapalangana kati na mokili bazali mpe komona bapasi lokola bino.

06 1 Bakolinto 16:13

Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.

07 Jake 1:12

Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.

08 Ba-Ebre 6:19

Mpo na biso, elikya yango ezali lokola longo ya bomoi na biso; epolaka te mpe esimba biso makasi, ekota kino koleka rido, kati penza na Esika-Oyo-Eleki-Bule

09 2 Petelo 3:17

Balingami na ngai, lokola bosili kozwa boyebi oyo, bosala keba ete bomemama te na mopepe ya mabunga ya bato oyo batosaka Nzambe te, mpo ete bobungisa te kondima na bino;

10 Banzembo 112:7

Abangaka basango ya mabe te; motema na ye ezali na kimia, atiaka elikya na ye kati na Yawe.

11 1 Batesalonika 3:8

mpe nzoto na biso eningani sik’oyo na esengo mpo ete botelemi ngwi kati na Nkolo.

Bantína oyo etali