Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kosukisa momekano

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Kosukisa momekano mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Timote 4:7

Nabundi etumba na ngai malamu, nakomi na suka ya lisano na ngai ya kokima mbangu, nabateli kondima.

02 Misala ya Bantoma 20:24

Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali: kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai: kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.

03 1 Bakolinto 9:24

Boni, boyebi te ete bato oyo bakimaka mbangu kati na lisano ya kopota mbangu, bango nyonso bapotaka mbangu, kasi moto moko kaka nde azwaka mbano? Bino mpe bopota mbangu lokola ye, na lolenge ya kozwa mbano.

04 Bafilipi 3:14

Boye nazali kopota mbangu kino nakoma na suka mpo na kozwa mbano oyo Nzambe abenga ngai mpo na yango wuta na Likolo kati na Yesu-Klisto.

05 Ba-Ebre 12:1-2

Yango wana, lokola batatoli ebele bazingeli biso, tobwaka mikumba mpe masumu nyonso oyo ezali kozingela biso na bangambo nyonso mpe topota mbangu, na molende nyonso, kati na momekano oyo ezali liboso na biso. Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.

06 Yoane 17:4

Namonisi nkembo na Yo awa na mokili mpe nasilisi mosala oyo opesaki Ngai.

07 Yoane 19:30

Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki: — Nyonso ekokisami. Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye.

08 2 Timote 4:8

Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana: akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.

09 1 Bakolinto 9:25

Bato nyonso oyo basalaka masano bamipekisaka makambo ebele; basalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka; kasi biso, tosalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka te.

10 Emoniseli 2:10

Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.

11 Luka 9:62

Yesu azongiselaki ye: — Moto oyo asimbi kongo mpo na kobalola mabele ya bilanga, kasi azali kotala na sima, azali na tina moko te mpo na Bokonzi ya Nzambe.

12 Ba-Ebre 12:1

Yango wana, lokola batatoli ebele bazingeli biso, tobwaka mikumba mpe masumu nyonso oyo ezali kozingela biso na bangambo nyonso mpe topota mbangu, na molende nyonso, kati na momekano oyo ezali liboso na biso.

Bantína oyo etali