Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Motema-pɛtɛɛ
Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Motema-pɛtɛɛ mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
mpo na oyo etali elikya, bozalaka na esengo makasi; mpo na oyo etali pasi, bokangaka mitema; mpo na oyo etali mabondeli, bozalaka na molende;
Bandeko, boyika mpiko kino na mokolo oyo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga azelaka bambuma kitoko ya mabele: akangaka motema wuta tango oyo aloni elanga na ye kino na eleko ya kobuka bambuma. Bino mpe, bokangaka mitema mpe boyikaka mpiko, pamba te koya ya Nkolo ekomi pene.
Kasi mbuma ya Molimo ezali: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima,
mpo ete bokoma bato na nguya kati na makambo nyonso kolanda makasi ya nkembo na Ye, mpo ete boyikela nyonso mpiko mpe bozala na molende mpe esengo kino na suka;
Yawe azali malamu mpo na bato oyo batielaka Ye elikya, mpo na bato oyo balukaka Ye! Ezali malamu kozela na kimia lobiko kowuta na Yawe!
bozalaka tango nyonso bato oyo batondi na komikitisa, na boboto mpe na motema molayi; boyikanaka mpiko kati na bolingo,
Kasi soki tozali kotia elikya na eloko oyo tozali komona te, solo tokozela yango na molende.
Bandeko, tozali kolendisa bino: bopesaka bagoyigoyi mpe bato ya mobulu makebisi, bolendisaka ba-oyo basili kobungisa mpiko na bango, bosungaka ba-oyo bazangi makasi, boyikanaka mpiko.
Mpe ezali malamu te mpo na mosali ya Nkolo kozala moto oyo aswanaka na bato, kasi asengeli nde kozala moto ya boboto epai ya bato nyonso, moto oyo azali na makoki ya kopesa malakisi, ya kokanga motema
Tolingi te ete bokoma bagoyigoyi, kasi bomekola bato oyo bazwaka, na nzela ya kondima mpe kokanga motema, biloko oyo Nzambe alaka.