Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kopota momekano

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Kopota momekano mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Ebre 12:1-2

Yango wana, lokola batatoli ebele bazingeli biso, tobwaka mikumba mpe masumu nyonso oyo ezali kozingela biso na bangambo nyonso mpe topota mbangu, na molende nyonso, kati na momekano oyo ezali liboso na biso. Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.

02 1 Bakolinto 9:24-25

Boni, boyebi te ete bato oyo bakimaka mbangu kati na lisano ya kopota mbangu, bango nyonso bapotaka mbangu, kasi moto moko kaka nde azwaka mbano? Bino mpe bopota mbangu lokola ye, na lolenge ya kozwa mbano. Bato nyonso oyo basalaka masano bamipekisaka makambo ebele; basalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka; kasi biso, tosalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka te.

03 2 Timote 4:7

Nabundi etumba na ngai malamu, nakomi na suka ya lisano na ngai ya kokima mbangu, nabateli kondima.

04 Bafilipi 3:14

Boye nazali kopota mbangu kino nakoma na suka mpo na kozwa mbano oyo Nzambe abenga ngai mpo na yango wuta na Likolo kati na Yesu-Klisto.

05 Bagalatia 5:7

Bozalaki kopota mbangu malamu! Bongo nani apengwisi bino mpo ete botika kotosa bosolo?

06 Ba-Ebre 12:1

Yango wana, lokola batatoli ebele bazingeli biso, tobwaka mikumba mpe masumu nyonso oyo ezali kozingela biso na bangambo nyonso mpe topota mbangu, na molende nyonso, kati na momekano oyo ezali liboso na biso.

Bantína oyo etali