Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mpiko ya koyika

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Mpiko ya koyika mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Ebre 12:1

Yango wana, lokola batatoli ebele bazingeli biso, tobwaka mikumba mpe masumu nyonso oyo ezali kozingela biso na bangambo nyonso mpe topota mbangu, na molende nyonso, kati na momekano oyo ezali liboso na biso.

02 Jake 1:12

Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.

03 2 Timote 2:3

Mona pasi elongo na ngai lokola soda ya mpiko ya Yesu-Klisto.

04 Barome 5:3-4

Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko, koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya.

05 Ba-Ebre 10:36

Na bongo, boyika mpiko mpo ete, sima na bino kokokisa mokano ya Nzambe, bozwa biloko oyo alakaki.

06 2 Timote 4:5

Kasi yo, zala na ekenge na makambo nyonso, yikela pasi mpiko, sala mosala ya mopanzi Sango Malamu, kokisa malamu lotomo na yo.

07 Jake 5:11

Ndenge boyebi, tobengaka bato oyo bayikaka mpiko bato ya esengo. Boyokaki sango ya lolenge oyo Yobo akangaki motema kati na pasi, mpe boyebi malamu makambo oyo Nkolo asalaki, na suka, mpo na bolamu na ye; pamba te Nkolo atonda na boboto mpe na mawa.

08 Bakolose 1:11

mpo ete bokoma bato na nguya kati na makambo nyonso kolanda makasi ya nkembo na Ye, mpo ete boyikela nyonso mpiko mpe bozala na molende mpe esengo kino na suka;

09 1 Petelo 2:20

Kasi lokumu nini ezali ya komona pasi ya etumbu mpo na mabe oyo osali? Nzokande, na miso ya Nzambe, komona pasi mpo na bolamu oyo osali ezali penza ngolu.

10 Matayo 24:13

Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.

11 2 Bakolinto 4:17

Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya.

12 Barome 8:25

Kasi soki tozali kotia elikya na eloko oyo tozali komona te, solo tokozela yango na molende.

Bantína oyo etali