Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kobimisa lobiko na bino na misala
Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Kobimisa lobiko na bino na misala mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Yango wana, balingami na ngai, ndenge bozalaki tango nyonso na botosi, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na kobanga mpe na kolenga: bokosalaka bongo kaka te tango nazali elongo na bino, kasi mpe sik’oyo, na kolekisa, tango nazali elongo na bino te;
pamba te ezali Nzambe nde apesaka posa mpe makoki ya kosala makambo nyonso, ndenge ezali mabongisi na Ye ya bolingo.
Mpo na yango, bosala makasi mpo na kobakisa na likolo ya kondima na bino, bolamu; na likolo ya bolamu, boyebi; na likolo ya boyebi, komikanga; na likolo ya komikanga, mpiko; na likolo ya mpiko, botosi kati na makambo ya Nzambe; na likolo ya botosi kati na makambo ya Nzambe, bondeko ya solo; mpe na likolo ya bondeko ya solo, bolingo.
Kasi na ngolu ya Nzambe, nazali oyo nazali lelo; mpe ngolu na Ye epai na ngai ezali ya pamba te. Kutu, nasalaki mosala mingi koleka bango nyonso; nzokande, ezali ngai te, kasi ezali nde ngolu ya Nzambe, oyo ezali elongo na ngai.
Kasi tolingi ete moto nyonso kati na bino akoba kolakisa bolingo yango kino na suka mpo ete makambo oyo bozali kotiela elikya ekokisama solo.
Nalingi koloba te ete nasili kozwa biloko oyo nyonso to mpe nasili kokoma moto ya kokoka, kasi nazali nde kopota mbangu mpo na kozwa yango, pamba te Yesu-Klisto asila mpe kozwa ngai.
Sala makasi ete omimonisa liboso ya Nzambe lokola moto ya kokoka, lokola mosali oyo ayokelaka mosala na ye soni te, pamba te ateyaka na bosembo Liloba ya solo.
Ezali mpo na yango nde nasalaka mpe nabundaka na nzela ya makasi ya Klisto, oyo esalaka na nguya kati na ngai.
Boye, boya masolo ya bozoba, oyo etiolaka Nzambe; boya mpe bilobaloba ya mibange basi. Mipesa nde na botosi kati makambo ya Nzambe;
mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu;
Yango wana, bandeko na ngai, bosala lisusu makasi koleka mpo na kolakisa na bato ete Nzambe abenga penza bino mpe apona bino; pamba te soki bosali bongo, bokotikala kokweya te.