Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Moto nyonso oyo andimaka

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Moto nyonso oyo andimaka mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 3:36

Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.

02 Yoane 3:16

Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.

03 Barome 10:9

Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, okobika;

04 Misala ya Bantoma 16:31

Bazongisaki: — Ndima Nkolo Yesu, mpe okobika, yo mpe libota na yo.

05 Yoane 6:47

Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo andimi azali na bomoi ya seko,

06 Yoane 11:25-26

Yesu alobaki na ye: — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi. Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango?

07 Yoane 5:24

Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.

08 Yoane 1:12

nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.

09 Misala ya Bantoma 13:39

Ezali mpe na nzela ya Yesu nde moto nyonso oyo andimi akomi sembo.

10 Barome 10:11

Makomi eloba: « Moto nyonso oyo andimelaka Ye akotikala koyokisama soni te. »

11 Yoane 20:31

Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.

Bantína oyo etali