Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kotambola na bosembo

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Kotambola na bosembo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 84:11

Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.

02 Banzembo 15:1-2

Nzembo ya Davidi. Yawe, nani akoki kovanda kati na Ndako na Yo ya bule? Nani akoki kowumela na ngomba na Yo ya bule? Ezali moto oyo azangi pamela, oyo asalaka makambo ya sembo mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye;

03 Masese 2:7

Abongiselaka bato ya sembo elonga mpe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo.

04 Masese 28:18

Moto oyo atambolaka na bosembo akozwa lobiko, kasi moto ya mobulu oyo alandaka banzela mibale akokweya na moko.

05 Mishe 6:8

Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo: Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.

06 Masese 10:9

Moto ya sembo atambolaka na kimia, kasi moto oyo atambolaka na banzela etengama-tengama akobima na pwasa.

07 Banzembo 1:1

Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe, atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka te esika moko na batioli,

08 Masese 11:3

Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango, kasi mayele mabe ya bato oyo batambolaka na boyengebene te ebebisaka bango.

09 Banzembo 119:1

Esengo na bato oyo bazangi pamela mpe batambolaka kolanda mibeko ya Yawe!

10 Masese 14:2

Moto oyo atambolaka alima atosaka Yawe, kasi moto oyo nzela na ye etengama-tengama atiolaka Ye.

11 Banzembo 37:37

Tala malamu moto oyo azangi pamela, landela bomoi ya moto ya sembo; tango oyo ezali koya ezali kozela moto ya kimia.

12 Ezayi 33:15-16

Moto oyo atambolaka na bosembo mpe alobaka solo, moto oyo abwakaka litomba oyo ezwami na nzela ya moyibi, moto oyo asembolaka maboko na ye te mpo na kozwa kanyaka, moto oyo akangaka matoyi na ye mpo na koboya koyoka masolo ya koboma bato, mpe oyo akangaka miso na ye mpo na koboya komona mabe. Moto wana akovanda na likolo: mabanga ya makasi ekozala ekimelo na ye. Akozanga te lipa ya kolia mpe mayi ya komela.

13 Masese 20:7

Moyengebene atambolaka na bosembo na ye; boye sima na ye, bana na ye bakozala bato ya esengo.

14 Masese 13:6

Bosembo ebatelaka moto oyo atambolaka alima na nzela na ye, kasi mabe ebebisaka bongo ya moto ya masumu.

15 1 Yoane 1:7

Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.

Bantína oyo etali