Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Tika ɛɛ na yo ezala ɛɛ
Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Tika ɛɛ na yo ezala ɛɛ mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Kasi bolobaka kaka ‹ iyo › soki ezali iyo, mpe ‹ te › soki ezali bongo, pamba te maloba nyonso oyo ebakisamaka likolo ewutaka na Mokosi.
Liboso na nyonso, bandeko na ngai, bolapaka ndayi te, ezala na kombo ya Likolo, ya mokili to mpe ya eloko nini. Tika ete « iyo » na bino etikala « iyo, » mpe « te » na bino etikala « te, » mpo ete bakatela bino etumbu te.
asanganaka te na moto oyo asalaka mabe, kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe; akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi, mpe abongolaka mokano na ye te;
Moyize alobaki na bakambi ya mabota ya Isalaele: « Tala mobeko oyo Yawe asili kopesa:
Kotika te ete monoko na yo ememisa yo masumu, mpe kokende koloba te liboso ya basali ya Nzambe: « Ndayi na ngai ezalaki libunga. » Mpo na nini Nzambe atomboka mpo na maloba na yo mpe abebisa misala ya maboko na yo?
Kasi soki oboyi na yo kolapa ndayi, okomema ngambo te.