Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bopɛto ya nzoto

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Bopɛto ya nzoto mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 6:18

Yango wana, bokima pite. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali na libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo amipesi na kindumba asali masumu mpo na libebi ya nzoto na ye moko.

02 1 Batesalonika 4:3-4

Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso: bokimaka pite; moko na moko kati na bino asengeli koyeba kobatela nzoto na ye kati na bosantu mpe lokumu,

03 Ba-Ebre 13:4

Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.

04 1 Bakolinto 6:19-20

Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te? Bosikolamaki na motuya makasi penza. Boye, bopesa Nzambe nkembo kati na banzoto na bino.

05 Masese 5:18-19

Tika ete etima na yo epambolama, mpe sepela na mwasi ya bolenge na yo, oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi, lokola mboloko ya mafuta. Tika ete tango nyonso, mabele na ye etondisaka yo na esengo, mpe bolingo na ye elangwisaka yo!

06 1 Batesalonika 4:5

asengeli koboya kozala mowumbu ya baposa ya nzoto lokola Bapagano oyo bayebi Nzambe te,

07 Yobo 31:1

« Nasalaki boyokani elongo na miso na ngai ete nalula elenge mwasi te.

08 2 Timote 2:22

Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.

09 Bagalatia 5:19-21

Tala misala ya bomoto: kindumba, misala ya bosoto, pite, kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, bombanda, bokabwani, koboyana, likunya, milangwa, lokoso ya kolia, mpe makambo mosusu ya lolenge oyo. Nazali komiyebisela bino, ndenge nasalaki liboso: bato oyo basalaka makambo ya lolenge oyo bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.

10 Ba-Efeso 5:3

Tika ete kindumba, lolenge nyonso ya makambo ya soni mpe lokoso etangamaka kutu te kati na bino, pamba te ebongi te mpo na basantu.

11 Matayo 5:28

Kasi Ngai, nalobi na bino: Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.

Bantína oyo etali