Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kozanga mbeba

Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Kozanga mbeba mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bafilipi 2:15

mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili

02 1 Batesalonika 5:23

Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya.

03 Yobo 1:1

Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo; » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe.

04 Luka 1:6

Bango mibale bazalaki bato ya sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa, na ndenge esengeli, mibeko nyonso mpe mitindo nyonso ya Nkolo.

05 2 Petelo 3:14

Yango wana, balingami na ngai, wana bozali kozela yango, bosala makasi mpo ete Nzambe akuta bino peto, bozangi pamela mpe bozali kati na kimia oyo apesaka.

Bantína oyo etali