Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bomengo na likoló

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Bomengo na likoló mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Matayo 6:19-20

Bonduka bomengo te awa na mokili, pamba te ekoki kobeba to nselele ekoki kolia yango to mpe miyibi bakoki kobuka ndako mpo na koyiba yango. Kasi bonduka bomengo na bino kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te to nselele ekoki kolia yango te to mpe miyibi bakoki kobuka ndako te mpo na koyiba yango;

02 Matayo 6:21

pamba te epai bomengo na yo ezali, kuna mpe motema na yo ekozala.

03 Luka 12:33-34

Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te; pamba te epai bomengo na bino ezali, kuna mpe motema na bino ekozala.

04 1 Timote 6:18-19

Pesa bango mitindo ete basalaka bolamu, batonda na misala malamu, bazala na motema ya kokaba mpe bakabelaka bato. Ezali na nzela wana nde bakomibombela bomengo lokola moboko ya makasi mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo ete bakoka kozwa bomoi ya solo.

05 Bakolose 3:1-2

Lokola bosekwaki mpe elongo na Klisto, bolukaka biloko ya Likolo epai wapi Klisto avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, bokanisaka biloko ya Likolo kasi biloko ya mokili te.

06 Matayo 6:24

Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo nzela moko.

07 Luka 12:21

Ekozala bongo mpo na moto nyonso oyo andukaka bomengo mpo na ye moko, kasi alukaka te kozala mozwi na miso ya Nzambe.

08 1 Petelo 1:4

ete tokozwa libula oyo abombela biso kati na Likolo, libula oyo ebebaka te, ezwaka bosoto te, mpe ebungisaka kitoko na yango te. Ezali mpe kaka libula yango nde Nzambe abombela bino

09 Ba-Ebre 11:26

pamba te amonaki ete kotiolama lokola Klisto ezali malamu koleka bomengo ya Ejipito, mpo ete azalaki kotalela lifuti oyo ezali koya.

10 Bafilipi 3:8

Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene: koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto

11 Matayo 13:44

Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba kati na elanga; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu; mpe na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba elanga wana.

12 2 Bakolinto 4:18

Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko.

13 Malako 10:21

Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye: — Ozangi eloko moko kaka: kende, teka biloko na yo nyonso mpe pesa mbongo oyo okozwa epai ya babola; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.

Bantína oyo etali