Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Liloba (Logos)

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Liloba (Logos) mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 1:1

Na ebandeli, Ye oyo azali Liloba azalaka; azalaka elongo na Nzambe, mpe azali Nzambe.

02 Yoane 1:14

Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.

03 Emoniseli 19:13

Alati nzambala bazindisa na makila; kombo na Ye ezali: « Liloba na Nzambe. »

04 1 Yoane 1:1

Oyo ezalaki wuta na ebandeli, oyo toyokaki, oyo tomonaki na miso na biso, oyo totalaki malamu, mpe oyo maboko na biso esimbaki, yango nde tozali kotatola na tina na Liloba na bomoi.

05 Ba-Ebre 1:2

Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.

06 Yoane 1:2-3

Wuta na ebandeli, azalaka elongo na Nzambe. Nzambe akelaki biloko nyonso na nzela na Ye; ezali na eloko moko te oyo ekelama soki na nzela na Ye te.

07 Banzembo 33:6

Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.

08 Bakolose 1:16

pamba te ezali na nzela na Yesu nde nyonso ekelama kati na Likolo mpe na mabele, bikelamu oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te, milimo mpe bokonzi ya milimo, bakonzi ya milimo mpe banguya. Ezali na nzela na Yesu mpe mpo na Yesu nde nyonso ekelama.

Bantína oyo etali