Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Limpa ya Bomoi

Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Limpa ya Bomoi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 6:35

Yesu azongiselaki bango: — Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.

02 Yoane 6:51

Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai.

03 Yoane 6:33

Pamba te lipa ya Nzambe ezali Ye oyo akiti wuta na Likolo mpe apesaka mokili bomoi.

04 Yoane 4:14

kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te: mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.

05 Matayo 4:4

Yesu azongisaki: — Ekomama: « Moto akobika na lipa kaka te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »

Bantína oyo etali